Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 149:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale kati na maboko na bango

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 149:6
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.


ezali na maboko, kasi esimbaka te ; ezali na makolo, kasi etambolaka te. Minoko na yango ebimisaka ata makelele te.


Nabelelaki Ye na monoko na ngai, mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.


Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.


Babikisi bakomata na ngomba Siona mpo na koyangela bangomba ya Ezawu, mpe Yawe akokoma Mokonzi.


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.


Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ