Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 149:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tika ete bayengebene na Yawe basepela kati na lokumu oyo ; tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 149:5
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Yawe na kobeta milolo ya esengo mpe na kobeta bakelelo.


Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,


Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene !


Nakolatisa Banganga-Nzambe na yango lobiko, mpe bato na yango bakoganga na esengo.


Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo ! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !


Nzembo ya Davidi. Yawe azali mobateli na ngai, nakozanga ata eloko moko te.


Mozindo ebendaka mozindo tango bambonge na Yo nyonso etombokaka ; Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.


Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo !


kino tango Mpaka oyo azala liboso ya tango ayaki kobundela basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, mpe kino tango ya kozwa bokonzi ekokoka mpo na bango.


oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe.


Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ