Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 149:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina ; tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 149:3
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.


Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke.


Bango nyonso bazalaki na bokambami ya tata na bango mpo na kobeta miziki na Tempelo ya Yawe mpe kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze ; mpe mpo na kosala mosala kati na Ndako ya Nzambe. Azafi, Yedutuni mpe Emani bazalaki na bokambami ya mokonzi.


Bakotaki na Yelusalemi na lokito ya makembe, ya mandanda mpe ya bakelelo, mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe.


Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi ; mpe ya mosakoli Natan ; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye.


Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko ; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.


Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ; Yawe, zala lisungi na ngai. »


Bosanzola Yawe na nzenze, bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.


Boganga na esengo epai ya Nzambe, makasi na biso ! Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko !


Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike, lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !


Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka : « Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »


Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.


Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.


Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.


Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ