Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 149:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye ! Tika ete bato ya Siona bazala na esengo mpo na Mokonzi na bango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 149:2
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,


Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.


Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso !


Ngai, nazali Yawe, Mosantu na bino, Mokeli ya Isalaele, Mokonzi na bino. »


Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Bosepela, bino bato ya Siona, bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino, pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino. Akonokisela bino bamvula minene na eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga, ndenge ezalaki liboso.


Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.


Siona, mboka kitoko, yemba nzembo ! Isalaele, ganga makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ; mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !


Yawe alongoli etumbu na yo mpe akimisi banguna na yo. Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ; kobanga lisusu pasi moko te.


Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.


« Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama oyo ememaka mikumba. › »


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Bazalaki koloba : « Tika ete apambolama, mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Kimia kati na Likolo, mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo ! »


Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu ! Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !


Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.


Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ