Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 148:8 - Mokanda na Bomoi

8 ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 148:8
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore.


Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonso mpo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili.


Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye.


Akomisaki molili ebombamelo na Ye, kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye ; mapata minene ezingelaki Ye, mwindo lokola mayi ya mozindo.


Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki.


Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito.


Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.


Yawe akosambisa bato nyonso na nzela ya moto mpe ya mopanga ; bongo, bato ebele bakokufa na mopanga, na maboko na Yawe.


Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko.


Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili.


Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.


Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye ; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi.


Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.


Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.


Bamvula minene ya mabanga enokaki ; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ