6 Atiaki yango mpo na libela ; apesaki mibeko oyo ekobongwana te.
Oyebi mibeko ya likolo ? Okolonga kokokisa bokonzi na yango na mokili ?
Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela lokola moyi liboso na ngai.
Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.
Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te.
Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki nasalaki boyokani te elongo na moyi mpe elongo na butu, mpe soki napesaki likolo mpe mabele mibeko te,