Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe ! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo ; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.