Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 148:14 - Mokanda na Bomoi

14 Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye ! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 148:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabelaka babola na motema ya esengo ; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.


Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo ! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !


mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango ! Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso. Bokumisa Yawe !


Mpo na ngai, nakotatola makambo oyo tango nyonso, nakoyemba mpo na lokumu ya Nzambe ya Jakobi,


basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo, basanzolaka bosembo na Yo.


Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango ; mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.


Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza ; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.


Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo !


akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.


pole mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »


Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto.


Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene.


Boye bozali lisusu te bapaya to baleki nzela, kasi bozali nde bankolo mboka elongo na basantu, bozali mpe bato ya libota ya Nzambe.


Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko.


Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye ?


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ