Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.
Elobeli na ye esalaka elengi na motema, mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye. Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali, oh bilenge basi ya Yelusalemi !
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, mobali na yo aleki mibali mosusu na nini ? Nini penza ya malonga oyo mobali na yo azali na yango, oyo eleki mibali mosusu mpo ete oloba na biso boye ?
Na mokolo wana bokoloba : « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.