Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
Banyama ya zamba, bambwa ya zamba mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo ; pamba te nakopesa mayi kati na esobe, bibale kati na mabele ekawuka, mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki,
Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi ; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko ; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango.