9 Apesaka bilei epai ya bibwele mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.
Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
Nani abongiselaka yanganga bilei tango bana na yango egangaka epai ya Nzambe mpe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei ?
Apesaka bilei na bikelamu nyonso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
Botala bayanganga : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei ; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.