Tala monene ya Nzambe ! Kasi atiolaka na Ye bato te, nguya na Ye emonanaka na nzela ya mikano na Ye ya makasi. Azali na nguya, mpe mikano na Ye ebongwanaka te.
Oyebi te ? Nanu oyoka te ? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele ; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
Oh Mokonzi ya bikolo, nani akoki koboya kotosa Yo ? Obongi na lokumu, pamba te moko te azali lokola Yo kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo mpe kati na mikili na bango nyonso.
Yawe asilikaka noki te, mpe nguya na Ye ezali monene. Yawe atikaka te moto oyo asali mabe lokola nde asali na ye mabe te, kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki, kati na mopepe makasi.
Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.