Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 147:3 - Mokanda na Bomoi

3 Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 147:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.


Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.


Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.


Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.


nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.


« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ