16 Anokisaka mvula ya pembe lokola bapwale ya meme mpe apanzaka mvula ya mabanga lokola putulu ;
Alobaka na mvula ya pembe : ‹ Sopana na mabele. › Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi : ‹ Sopana. ›
Boni, osila kokoma na esika oyo babombaka mvula ya pembe mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ?
Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga ? Nani abotaki londende oyo ewutaka na likolo ?
ezala moto to mvula ya mabanga, ezala mvula ya pembe to londende, ezala mopepe makasi oyo ekokisaka liloba na Ye ;
Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,