Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 146:8 - Mokanda na Bomoi

8 Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 146:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe azali sembo, alingaka bosembo. Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.


Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka, atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.


Yawe asungaka babola, kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.


Boye, bakufi miso bakomona mpe bakufi matoyi bakoyoka.


nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te ; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.


Boyoka, bino bakufi matoyi ! Botala mpe bomona, bino bato bokufa miso !


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango : — Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.


Ye moko Tata alingaka bino, pamba te bolingaka Ngai mpe bondimaki ete nawutaki epai na Nzambe.


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Kasi Nzambe oyo abondisaka mitema ya bato oyo batutami alendisaki biso na nzela ya boyei ya Tito.


Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,


Solo, olingaka bato, basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ