Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 146:4 - Mokanda na Bomoi

4 Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 146:4
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.


Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »


Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.


Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.


Soki bana na ye ya mibali bazwi lokumu, ayebaka na ye yango te ; soki basambwisi bango, amonaka na ye yango te.


Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.


Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.


wana ngai nazali nanu na bomoi, mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,


Tango obombaka elongi na Yo, somo ekangaka yango ; tango olongolaka yango pema, ekufaka mpe ezongaka na putulu ;


Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.


Ozongisaka moto na putulu, pamba te oloba : « Bino bato, bozonga na putulu ! »


liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.


Bolingo na bango, koyina na bango mpe baposa na bango esila kolimwa ; bakozwa lisusu litomba ata moko te kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi.


Botika kotia elikya na moto oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. Motuya nini azali na yango ?


Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »


Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.


Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ