2 Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba, nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso nakozala na bomoi.
Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba ; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.
Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo.
Bino bakonzi, boyoka ! Bino bakambi, boyoka malamu ! Nalingi koyembela Yawe, nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.