Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu ; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; tombola yango penza, kobanga te ; loba na bingumba ya Yuda : « Botala Nzambe na bino ! »
Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »
Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »