Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 145:9 - Mokanda na Bomoi

9 Yawe azali malamu mpo na bato nyonso, atonda na mawa mpo na bikelamu na Ye nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 145:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili.


Pamba te Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.


Nyonso etalelaka Yo mpo ete opesa yango bilei na tango oyo ekoki.


Solo, Yawe azali malamu mpe alima ; atalisaka banzela na Ye epai ya bato ya masumu.


Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.


Bongo ndenge nini Ngai nayoka motema pasi te mpo na Ninive, engumba monene, oyo ezali na bato koleka nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi te kokesenisa makambo mabe mpe makambo malamu, mpe ezali na ebele ya bibwele ?


Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.


Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.


Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.


Mpe azalaka na posa te ya masungi ya bato, pamba te akoka na nyonso. Nzokande, Ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ