Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango.
Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
Kanisa mokolo oyo otelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na Orebi tango Yawe alobaki na ngai : « Sangisa bato oyo liboso na Ngai mpo na koyoka maloba na Ngai, mpo ete bakoka koyeba kopesa Ngai lokumu tango nyonso bakozala na mokili oyo mpe bakoka koteya yango na bana na bango. »