Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tokoki te kokoma esika Ye azali ; azali monene na nguya mpe na solo ; azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.
Oyebi te ? Nanu oyoka te ? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele ; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.