Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 145:20 - Mokanda na Bomoi

20 Yawe abatelaka bato nyonso oyo balingaka Ye, kasi abebisaka bato nyonso ya mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 145:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.


Tika ete bato ya masumu basila na mokili, mpe bato mabe bazala lisusu te ! Oh molimo na ngai, pambola Yawe ! Aleluya, bokumisa Yawe !


Kati na kobanga na ngai, namilobelaki : « Obengani ngai penza mosika na Yo ! » Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo mpe wana nazalaki kobelela Yo.


pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.


Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.


Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe ! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.


Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ