16 Ofungolaka loboko na Yo mpe okokisaka posa ya nyonso oyo ezali na bomoi.
Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka, mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu ?
Opesaka bilei, mpe ezwaka yango ; ofungolelaka yango loboko na Yo, mpe etondaka na biloko.
Apesaki mayi epai ya bato oyo bazalaki na posa ya mayi mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.
Nakopambola, nakopambola yango na biloko ebele, nakotondisa babola na yango na bilei.
Apesaka bilei epai ya bibwele mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.