Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
Na suka ya tango oyo esakolamaki, ngai Nabukodonozori, natombolaki miso na ngai na likolo, mpe mayele na ngai ezongelaki ngai. Nasanzolaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo, napesaki lokumu mpe nkembo epai na Ye oyo azali na bomoi tango nyonso : Bokonzi na Ye ezali na suka te, ewumelaka seko na seko.
Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu. Pamba te azali Nzambe na bomoi mpe ya seko na seko ; bokonzi na Ye ekotikala kobebisama te mpe ekowumela seko na seko.
Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ; bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye. Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko, ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.
Kasi bokonzi, nguya mpe lokumu ya bikolo oyo ezali na se ya moyi ekopesama na ekolo ya basantu ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Bokonzi ya ekolo yango ekowumela seko na seko, mpe bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili bakosalela mpe bakotosa ekolo yango.
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »