9 Oh Nzambe, nakoyembela Yo nzembo ya sika, nakobetela Yo lindanda ya basinga zomi.
Bokumisa Yawe ! Boyembela Yawe nzembo ya sika, bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene !
Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ; atelemisaki ngai na likolo ya libanga mpe alendisaki makolo na ngai.
Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa ! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.
mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.