11 Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.
Yawe, sunga biso ! Pamba te bayengebene bazali lisusu te ; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.
Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »