Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 143:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yawe, zongisela ngai eyano noki ! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 143:7
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, yoka libondeli na ngai ! Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !


Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye ! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu ! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !


Kopesa ngai mokongo te, kobengana mosali na Yo te na kanda ; osungaki ngai. Kotika ngai te, kosundola ngai te, Nzambe, Mobikisi na ngai.


Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo ! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.


Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »


Yawe, yanola ngai, pamba te bolingo na Yo ezali malamu ; baluka epai na ngai, na mawa monene na Yo.


Kobombela lisusu mosali na Yo te elongi na Yo. Yanola ngai noki, pamba te nazali na pasi.


Nazali kozinda na potopoto, na mozindo makasi epai wapi eloko ya kosimba ezali te ; nakiti na mozindo ya mayi, mbonge ememi ngai.


Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Nzambe azali monene ! »


Oh Nzambe, kozala mosika na ngai te ! Nzambe na ngai, yaka noki mpo na kosunga ngai.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, tala ndenge bisika oyo ovandaka ezali kopesa posa !


Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.


Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo, kufa ekoki kosanzola Yo te ; bato oyo bakitaka na mboka ya bakufi bazalaka na elikya na boyengebene na Yo te.


Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.


Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.


Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ