Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi mpe papirisi ekobota na bisika oyo mbwa ya zamba elalaka.
Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.