Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 143:3 - Mokanda na Bomoi

3 Monguna azali konyokola ngai, azali kosakana na bomoi, azali kosala ete navanda kati na molili lokola bato oyo bakufa na tango ya kala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 143:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango : — Boni, omoni ye ? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko ? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba.


Boye Abineri alobaki lisusu na Asaeli : — Tika kolanda ngai ! Mpo na nini kotindika ngai na koboma yo ? Bongo ndenge nini nakotala Joabi, ndeko na yo ya mobali, na elongi ?


Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »


Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai basambwa mpe bayoka soni ; tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa !


Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.


soki nasalaki moninga na ngai mabe, soki nabotolaki na makasi mpe kaka na pamba, biloko ya moyini na ngai ;


wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.


Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili, lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa.


Alobaki na ngai : — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! »


Oh banguna na ngai, boseka ngai te ! Ata soki nakweyi, nakotelema kaka. Ata soki navandi kati na molili, Yawe azali pole na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ