6 Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »
Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele. Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.
Akanisaki biso tango basambwisaki biso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Monguna azali konyokola ngai, azali kosakana na bomoi, azali kosala ete navanda kati na molili lokola bato oyo bakufa na tango ya kala.
Yawe, zongisela ngai eyano noki ! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu.
Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai ! Kolela na ngai ezali sembo ! Yoka koganga na ngai ! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.
Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi ;
Nakozalaka na elikya na likambo oyo : nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.
Solo nandimi mabe na ngai, masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.
Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.
Kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe, mpe bikisa ngai liboso ya basopi makila ya bato.
Kotangela biso te masumu na biso ya kala, kokangela biso motema te, yokela biso mawa, pamba te tokomi na suka !
Nalobaka na tina na Yawe : « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai ; natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »
Nani akofunda bato oyo Nzambe apona ? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.
Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.
Ndenge kaka lisese ya kala elobi : « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te.