Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango tango okotindela bango banguna na pwasa, pamba te batimoli libulu mpo ete bakanga ngai mpe batie mitambo na makolo na ngai !
Telema, ganga na butu ndenge bakengeli basalaka na butu ; sopa motema na yo lokola mayi, na miso ya Nkolo, tombola maboko na yo epai na Ye mpo na bomoi ya bana na yo, oyo bazali kokufa nzala na babalabala nyonso.