Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.
ya solo, mokili etikalaki lisusu malamu te mpo na bango, bakomaki koyengayenga kati na bisobe, na bangomba, kati na bibombamelo ya mabanga mpe na mabulu oyo ezalaka na se ya mabele.
Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba.
Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.