Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 141:5 - Mokanda na Bomoi

5 Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 141:5
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.


Yawe, zala malamu mpo na bato malamu mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema !


Obongisaka mesa mpo na ngai na miso ya bayini na ngai, opakolaka moto na ngai mafuta mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.


Mpo ete osepelaka na mbeka te, nakobonza te mbeka ya kotumba oyo ondimaka te.


Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.


Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.


Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.


Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.


Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.


Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,


Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.


Okoyina ndeko na yo te na motema na yo ; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.


Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.


Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ