Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 141:2 - Mokanda na Bomoi

2 Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala lokola mbeka ya malasi, mpe botombwami ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 141:2
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.


Bato nyonso oyo bazalaki kolenga mpo na maloba na Nzambe ya Isalaele basanganaki pene na ngai, mpo na misala ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. Navandaki na mawa kino na tango ya likabo ya pokwa.


Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule mpe bopambola Yawe !


Yoka ngai tango nabondelaka Yo mpo na kosenga lisungi, tango natombolaka maboko na ngai, na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, yoka koganga na ngai wana nazali kosenga lisungi, pamba te nazali kobondela nde Yo.


Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo.


Okotumba mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa.


etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali,


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.


Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima na midi.


Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.


Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ