Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 140:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nalobaka na Yawe : « Ozali Nzambe na ngai ! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 140:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga, obikisaka Davidi, mosali na Yo, liboso ya mopanga oyo ebomaka.


alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.


Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ; nakobanga nani ? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ; nakolenga liboso ya nani ?


Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe, mpe nalobaka : « Ozali Nzambe na ngai. »


Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo, nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo, pamba te ozali ebombamelo na ngai, mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.


Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.


Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.


Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye, mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.


Boya, toganga na esengo mpo na Yawe ! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso !


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ