Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai, esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ; mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe kino suka ya bomoi na ngai.
Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »
Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo ; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.