Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 140:12 - Mokanda na Bomoi

12 Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 140:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango.


yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango,


Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.


Bato nyonso bazali kokosana bango na bango, bazali kolobana maloba ya sukali, kasi mitema na bango ezali sembo te.


Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo,


Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye ! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu ! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !


Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »


Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli.


Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.


Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo,


kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.


Alongisaki babola mpe bato bakelela, mpe alongaki na makambo nyonso. Boni, yango te koyeba Ngai, » elobi Yawe ?


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ