Mokonzi Kizerisesi azongiselaki Ester, mwasi na ye, mpe Maridoshe, Moyuda : — Lokola Amani abundisaki Bayuda, ngai napesi ndako na ye epai ya Ester ; mpe napesi mitindo mpo ete badiembika ye na nzete.
Bazwi nyonso ya mokili bakolia mpe bakogumbamela Ye ; bato nyonso oyo bazali kokende na kunda, ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi, bakogumbama liboso na Ye.
Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.