Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.
Na butu wana, Faraon elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya Ejipito batelemaki ; mpe koganga makasi ezalaki na Ejipito, pamba te ezalaki na ndako moko te oyo ezangaki ebembe.
Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.
Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.
Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni ! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye ?
Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.