8 Soki namati na likolo, ozali kuna ; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna.
Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele.
Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo ezali penza polele liboso ya Yawe, ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato ezali polele liboso na Ye.
« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye ? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » elobi Yawe.
Ata soki omati likolo makasi lokola mpongo mpe otongi zala na yo kati na minzoto, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
Wuta na libumu ya mbisi, Yona asambelaki Yawe, Nzambe na ye.