Moko kati na bakalaka na ye alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ezali yo te oyo na tina na nani nalobelaki na tango ya kala na nzela ya basali na Ngai, basakoli ya Isalaele, oyo basakolaki na tango wana, na mibu ebele, ete nakotinda yo mpo ete obundisa bato na Ngai ?
Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. »