11 Soki nalobi : « Tembe te, molili ekobomba ngai penza ; tika ete pole ekoma butu zingazinga na ngai ! »
Bongo, na kati-kati ya butu, alamukaki, alongolaki mwana na ngai pembeni na ngai, wana ngai, mwasi mowumbu na yo, nazalaki ya kolala, mpe atiaki ye na tolo na ye ; mpe atiaki mwana na ye, oyo akufaki, na tolo na ngai.
abimisaka na pwasa, makambo ya sekele, makambo oyo ezali kati na molili, mpe abimisaka na pole bililingi oyo eleki mwindo ;
Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.
bazali koloba : « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te ! »
Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ? Nani akoyeba ? »
« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye ? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » elobi Yawe.