10 kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai, loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.
Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.
pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.
Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo ; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.
Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo, nasimbi makasi loboko na yo ya mobali mpe nazali koloba na yo : ‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›
Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.