7 Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »
Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango ! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai !
Yawe alobaki na Moyize : — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana : ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga, bayokelaki bango mawa te, kanda na bango ezalaki tango nyonso komata, mpe bayina bango wuta kala.
Obimaka mpo na kokangola bato na Yo mpe mpo na kobikisa mopakolami na Yo. Obomaki mokambi ya mokili ya bato mabe, osambwisaki ye kobanda na moto kino na makolo.