Bakobonzela lisusu Yawe makabo ya masanga ya vino te, mpe bambeka na bango ekosepelisa lisusu Yawe te. Ekozala mpo na bango lokola bilei ya matanga : bato nyonso oyo bakolia yango bakokoma mbindo ; pamba te bilei na bango ekozala kaka mpo na mabumu na bango, kasi ekokota te na Tempelo ya Yawe.
Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.