Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 137:1 - Mokanda na Bomoi

1 Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 137:1
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kuna, pene ya ebale Akava, napesaki mitindo ya kokila bilei mpo na komikitisa liboso ya Nzambe na biso mpe kosenga Ye mobembo malamu mpo na biso, mpo na bana na biso mpe mpo na biloko na biso nyonso.


Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya liboso, tolongwaki na ebale Akava mpo na kokende na Yelusalemi. Loboko ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, mpe abatelaki biso na nzela liboso ya banguna mpe ya bato ya mobulu.


kasi nazongiselaki mokonzi : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ?


Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ; pamba te balobaka na ngai tango nyonso : « Nzambe na Yo azali wapi ? »


« Bosepela elongo na Yelusalemi mpe botonda na esengo mpo na ye, bino nyonso oyo bolingaka ye ; bosepela makasi elongo na ye, bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga.


« Kamata mokaba oyo osombaki mpe oyo olati na loketo na yo, kende sik’oyo na Perati mpe bomba yango kuna kati na madusu ya mabanga. »


Natikala kovanda te kati na batioli to mpe kosepela elongo na bango. Natikalaki kaka ngai moko, pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai mpe otondisaki ngai na kanda.


Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene, yo oyo otonda na bomengo mingi, suka na yo ebelemi, tango na yo ya kobebisama ekoki !


Yoka koganga ya bato na ngai wuta na mokili ya mosika : « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ? Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? »


Tala tina nini nazali kolela mpe miso na ngai etondi na mpinzoli ; moto moko te ayei pene na ngai mpo na kobondisa ngai, moto moko te ayei kolendisa molimo na ngai. Bana na ngai bazali na pasi, mpo ete monguna aleki ngai na makasi.


Mitema ya bato ezali koganga epai na Nkolo. Oh mir ya Siona, mboka kitoko, tika ete mpinzoli na yo ebima lokola ebale, butu mpe moyi, mpe miso na yo ekangama te !


Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami.


Makambo oyo miso na ngai ezali komona ezali koyokisa motema na ngai pasi likolo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.


Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.


Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye.


Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo ; nazalaki kokamwa mingi.


Boye, nabalolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe mpo na kosambela mpe kobondela Ye, na kokila bilei, na kolata basaki mpe na komipakola putulu.


Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ