5 Akelaki likolo na mayele na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili.
Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.
Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.
Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.
Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele !
Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.
Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,
Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.
Asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.