3 Bosanzola Nkolo na bankolo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te,
na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,
Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »
Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo : « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »