21 Akabaki mabele na bango lokola libula ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Apesaki bango mabele ya bikolo mosusu mpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango
Mpe akabaki mikili na bango lokola libula, lokola libula epai ya bato na Ye, Isalaele.
abenganaki bikolo liboso na bango, apesaki bango etando lokola libula mpe avandisaki mabota ya Isalaele kati na bandako na bango ya kapo.
« Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai, Jakobi oyo naponaki, bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai,
Na tango wana, napesaki bino mitindo oyo : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino mokili oyo mpo ete bokamata yango. Kasi bato na bino nyonso oyo bazali na makoki ya kobunda balata bibundeli mpe baleka liboso ya bandeko na bino bana ya Isalaele.