14 Alekisaki Isalaele na kati-kati ya ebale monene ya Barozo ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Agangelaki ebale monene ya Barozo, mpe ekawuki ; atambolisaki bango kati na mozindo lokola na esobe.
akabolaki ebale monene mpo na kolekisa bango, atelemisaki mayi lokola mir.
Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.